Lyrics: Tu Vois? (Mamou) - Franco et Le TPOK Jazz

"Tu Vois? (Mamou)" from the album "Franco et Le TPOK Jazz Chantent Tres Impoli" (Translation)
By Franco

Olobaki nini ee ee
Olobaki nini ee ee
Olobaki nini mamou ee ee
Olobaki ngai nafundaka yo na mobali nayo 
Olobaki ngai nasalaka kisefe na libala na bino

Madilu tika ye aloba ee
Makambo ye asalaka ayebaka te
Babalabala ye atambolaka, bato bamonaka ye
Ba ndako ye akotaka ba murs ya ndako efundaka ye
Na ba coin nyoso ye atelemaka, ba chauffeur ya taxi bamonaka ye
Mpo na nini apanza yo nsango alobi yo osalaka kisefe ee?

Ngai moto nakotelaka yo mamou ee
Ngai moto nayebi basekele mamou ee 
Lelo nakomi moto mabe oo mamou ee
Oyebi tango engindaka ooh mamou eeh
Okokanisa ngai mamou nakei ee eeh
Ata ofingi ngai ndumba mamou eeh

Oh mamou, nakamwe Vraiement mammou
Nakanisaka ozalaka amie na ngai ya motema
Mpo, oyebi te nayebi ba sekele na yo nyoso
Eloko ekamwisi ngai lelo mamou, okeyi kofinga ngai epayi ya moussa
Olobi ngai nazali “ndumba”
Vraiement mamou oyebi ngai nabalaka, nadivorsa,nabota
Bongo soki lelo oyo yo mamou, moto natiaka motema
Obandi kofinga ngai ndumba
Kindumba ezali maladie te,
Kindumba ezali punition te
Mamou yo mwasi wa libala
Nakamwaka yo, otambola na kabambi ya sac `a main
Na sac wana, kabambi ya liputa, brose `a dent lokola moto akokende Voyage, lipapa ya nse, ebele ya makasu

Eloko nini okoluka ee mamou ye eeh?
Mamou oyebi epayi na yo ngai nazalaka buvre
Mpo nayebi mibali nayo akuti yo nyoso tuu
Ata mobali nayo akuti yo oza kosala na mobali
Okoloba te eza mobali na ngai
Mais nalingaka koboma libala na bino te
Mpo nalingaka bobokolo bana na bosemo
Au lieu nakota baloba oooh tala mwasi ya ndumba awuti koboma libala ya mwasi oyo abala
Eloko nini okoluka ee mamou ee?
Signature osi ozwa Mamou
Landa nzela ya libala ooh mamou
Yango evandisa yo na mpoto mamou ee eeh
Tika kokosa mobali nayo mamou ee eeh
Soki atelefoner loba obimaka mamou uuh

Mamou awa tuu soki nalobi, nakumbi ngambo mpo naza ndumba
Yo moko oyebisa ngai mobali na yo atinda yo na poto mpo oya kobokola bana
Yango wana apesa signature
Ekoma yo awa oyebisa ngai mobali na yo atelefonaka 2 fois par jour
Na 6 heures du matin, na minuit
Apre`s minuit soki atelefoner yo
Okamati kisi ya bangungi opomper ndako mobimba
Mpo bana balala tii ntango okozonga
Mpo oyebi te mobali na yo atelefonaka na 6 heurs du matin
Tango atelefoneka yo yoka ndenge oyebisaka na mobali nayo

“Allo, papa ya bana, biso toza na biso kaka malamu
Kaka nde bana na yo awa moyen te Vraiement mobulu likambo
Surtout mwana oyo ya moke ya mobali oyo ozwa elongi na papa ee
Azokamwisa ngai papa
Foto kutu otiya na sani natalaka ata elongi na yo abamba yango na mabele foto epasuka
Mwana oyo mpenza mobulu penza kaka se ndenge ozalaka mwana moke
Lokola mama na yo ayebisaka ngai
Papa ya bana, na`a na makambo mosusu naloba te kaka otindela biso mbongo ya koliya, nasuki se bongo”

Yo moko osalaka mabe ee mamou ee eeh
Yo moko osalaka mabe ye yeh
Obangaka mobali nayo te mamou ye yeh
Olongola respect na ye okaba mamou ee eeh
Ba camarades ya mobali nayo mamou ee, obangaka bango te oo oo mamou ye
Lelo ofingi ngai ndumba ah ngai naseki eee mamou ee ee

Oh mamou, kindumbaoza kofinga ngai brusselle mobimba
Okeyi tii na paris osilisi ngai
Otindi mokanda na Kinshasa, mosusu otindi na Brazza
Kindumba eza punition te mamou
Oyeba mamou eswi ngai

Nalingaki d`ailleurs nafunda yo mamou
Inutile nafunda yo
Nakamati obele filime ya makambo nyoso ya mabe oyo osalaka
Natekisi yango epayi ya yobo
Mpo azikisela ngai filime wana
Mamou koma ngai
Ndenge bakomaka yezu na kurunze
Sete mibale na maboko, sete moko na lokolo

Mamou ozali mwasi ya libala okamwisaka ngai
Namonaka yo ozali ndoki
Ozali kinsweka, ozali monyororo
Mamou nini nakoki koloba mpo na yo
Example nini yo okoki kopesa mpo na basi ya mabala?
Example ezali te

Kaka baloba te mpo ngai nazali ndumba
Na’kotambola na mwasi ya libala
Yango wana na’kopesa yo makanisi mabe
Te, ezali nde yo moko moto oza na makanisi mabe

Ngai moto nakotelaka yo ooh
Ngai moto nayebi basekele ee ee
Lelo nakomi moto mabe oo mamou ee
Oyebi tango engindaka ooh mamou eeh
Okokanisa ngai mamou nakei ee eeh
Ata ofingi ngai ndumba mamou eeh

Ngai moto nawelaka yo mamou eeee
Ngai moto nakufelaka yo
Lelo nakomi enemi jure oh mamou ee ee
Oyebi ntango engindaka mamou uh
Okokanisa ngai mamou nakei ee eeh
Landa nzela ya libala oh mamou ye ye

Madilu tika ye aloba ee ee
Makambo miki-mike ye asalaka ayebaka te
Ba couleurs ya ndako efundaka ye,
Bato bamonaka ye, lelo apanza ngai sango
Afinga ngai nazali ndumba
Kindumba ezali maladie te
Kindumba ezali punition te
Kindumba na ngai nazwaka
Kindumba na ngai bayebi
Nakosaka moto te
Mpo na nini apanza ngai nsango olobi yo osalaka kisefe?

Mamou mokolo mosusu, tongo etaneli yo epayi mosusu
Mpo olalaki na ndako te
Odevancer mobali nayo otelefoner ye avarant 6 heures
Mpo oloba te ozali na mwana na yo oyo ya moke na kati ya hospital, azali malade

Yo moko osalaka mabe ee mamou
Yo moko osalaka mabe ee
Obangaka mobali nayo te mamou
Ba-camarades ya mobali nay o mamou
Olungola respect na ye okaba mamou ee ee
Ba camarades ya mobali nayo mamou
Obangaka bango te mamou ye ye ye
Lelo ofingi ngai ndumba ngai naseki ee mamou

Oh mamou kindumba oyo oza kofinga ngai lelo mamou
Soki natali malamu tozali kaka ndenge moko
Eloko oyo oza koprofiter na kati ya libala mpo ata oboti bana na mibali mosusu okopesa
bana wana kombo kaka ya mobali nayo
Mamou oyebi que kindumba na ngai nazwaka
Naprofitika epayi nayo te mamou
Koma ngai, oyebi que naza na nyoso mamou


MP3 Download Links! Click on your favorite song.
Lyrics: Tu Vois? (Mamou) - Franco et Le TPOK JazzSocialTwist Tell-a-Friend

5 comments:

  1. thanks for these lyrics! He was a great man

    ReplyDelete
  2. thanx, man. FRANCO is a legend and his legacy lives on

    ReplyDelete
  3. I'm gone to say to my little brother, that he should also visit this web site on regular basis to obtain updated from newest reports.

    Feel free to visit my web-site ... bomba de calor

    ReplyDelete
  4. Landa nzela ya libala ooh mamou

    ReplyDelete

Submit your comments here: